Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezera 3:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe babandaki kozongiselana maloba na loyembo, kosanzola+ mpe kopesa Yehova matɔndi, “mpo azali malamu,+ mpo motema boboto na ye epai ya Yisraele ezali mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”+ Kasi bato nyonso, bazalaki koganga na koganga moko makasi+ mpe kosanzola Yehova mpo na kotyama ya moboko ya ndako ya Yehova.

  • Nehemia 12:43
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 43 Mpe bapesaki mbeka na mokolo yango, bambeka minene+ mpe basepelaki,+ mpo Nzambe ya solo asepelisaki bango na esengo monene.+ Mpe lisusu basi+ ná bana+ basepelaki, bongo kosepela ya Yerusaleme eyokanaki mosika.+

  • Nzembo 54:maloba ya ebandeli ya loyembo-7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • Epai ya mokambi ya nzembo na bibɛtɛlo ya bansinga. Maskile. Ya Davidi. Ntango Bazife bakɔtaki mpe balobaki na Saulo ete: “Davidi amibombi nde epai na biso te?”+

      54 Ee Nzambe, bikisá ngai na nkombo na yo,+

      Mpe na nguya na yo sambá likambo na ngai.+

       2 Ee Nzambe, yoká libondeli na ngai;+

      Tyá mpenza litoi na maloba ya monɔkɔ na ngai.+

       3 Mpo ezali na bapaya oyo babimeli ngai,

      Mpe banyokoli oyo bazali koluka molimo na ngai.+

      Batye Nzambe liboso na bango te.+ Sela.

       4 Talá! Nzambe azali mosungi na ngai;+

      Yehova azali kati na baoyo basungaka molimo na ngai.

       5 Akozongisela banguna na ngai mabe;+

      Na bosolo na yo kangisá bango monɔkɔ.+

       6 Nakopesa yo mbeka na motema moko.+

      Ee Yehova, nakokumisa nkombo na yo mpo yango ezali malamu.+

       7 Mpo abikisaki ngai na mpasi nyonso,+

      Mpe liso na ngai etali banguna na ngai.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto