9 Mpe bana na bango bakoyebana na kati ya bikólo,+ mpe bakitani na bango na kati ya bato ya bikólo. Baoyo nyonso bakomona bango bakoyeba bango+ mpe bakoyeba ete bazali bana oyo Yehova apambolá.”+
22 “Mpo se ndenge likoló ya sika+ mpe mabele ya sika+ oyo nazali kosala etɛlɛmi liboso na ngai,”+ yango nde liloba ya Yehova, “ndenge wana nde bakitani na bino+ mpe nkombo na bino bakokoba kotɛlɛma.”+