Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 14:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Mpe mai ezalaki kaka kozonga.+ Nsukansuka yango ezipaki makalo ya bitumba ná basoda oyo batambolaka na mpunda ya mampinga nyonso ya basoda ya Farao mpe oyo bakɔtaki na mbu nsima na bango.+ Moko te kati na bango atikalaki.+

  • Nzembo 136:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe oyo abwakaki Farao mpe limpinga ya basoda na ye na Mbu Motane:+

      Mpo motema boboto na ye ezali seko na seko;+

  • Yisaya 51:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Ee lobɔkɔ ya Yehova+ lamuká, lamuká, latá bokasi!+ Lamuká lokola na mikolo ya kala, lokola na ntango ya mabota ya bantango ya kala.+ Ezali yo te moto obukabukaki Rahaba,+ yo te moto otɔbɔlaki nyama ya nsɔmɔ ya mbu?+

  • Ezekiele 29:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Lobá, mpe osengeli koyebisa boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai oyo nazali kobundisa yo, Ee Farao, mokonzi ya Ezipito,+ nyama ya monene mpe ya nsɔmɔ oyo ezalaka na mbu,+ oyo etandami na katikati ya banzela ya mai ya Nile,+ oyo elobi ete: ‘Ebale na ngai Nile ezali ya ngai, mpe ngai—nasali yango mpo na ngai moko.’+

  • Ezekiele 32:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Mwana ya moto, bimisá loyembo ya mawa mpo na Farao mokonzi ya Ezipito, mpe osengeli koloba na ye boye: ‘Lokola mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki na kati ya bikólo, okangisami monɔkɔ.+

      “‘Mpe ozalaki lokola nyama ya nsɔmɔ oyo ezalaka na mbu,+ ozalaki komibwakabwaka na kati ya bibale na yo mpe kobebisa mai na makolo na yo mpe ozalaki kobebisa bibale na yango.’

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto