17 “Ee Yerusaleme, lamuká, lamuká, tɛlɛmá,+ yo oyo omɛli na lobɔkɔ ya Yehova kɔpɔ ya nkanda makasi na ye.+ Kɔpɔ ya monene, kɔpɔ oyo epesaka kizunguzungu, omɛli yango, osilisi yango.+
10 akomɛla mpe vinyo ya nkanda ya Nzambe oyo basangisá yango na eloko te mpe esopami na kati ya kɔpɔ ya nkɛlɛ na ye,+ mpe akonyokwama+ na mɔtɔ mpe na sufulu+ na miso ya baanzelu basantu mpe na miso ya Mwana-Mpate.
19 Mpe engumba monene+ ekabwanaki na biteni misato, mpe bingumba ya bikólo ekweaki; mpe Nzambe akanisaki Babilone Monene,+ mpo na kopesa yango kɔpɔ ya vinyo ya nkanda na ye makasi.+