19 Mpe mwasi ya mwana na ye, mwasi ya Finehase, azalaki na zemi, akómaki pene na kobota, mpe ayokaki nsango ete babɔtɔli sanduku ya Nzambe ya solo mpe ete bokilo na ye ná mobali na ye bakufi. Bongo agunzamaki mpe abotaki, mpamba te mpasi ya kobota eyelaki ye pwasa.+