Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Danyele 4:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Mpe bakobengana yo kati na bato, mpe okofanda esika moko na banyama ya zamba,+ mpe bakopesa yo matiti olya lokola bangɔmbɛ;+ mpe mamwɛ ya likoló ekopɔlisa yo, mpe okolekisa ntango nsambo,+ tii okoyeba ete Oyo-Aleki-Likoló azali Moyangeli na bokonzi ya bato,+ mpe ete apesaka yango na moto oyo ye alingi kopesa.+

  • Zekaria 4:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Bongo alobaki ete: “Yango ezali bato mibale oyo batyami mafuta+ oyo bazali kotɛlɛma pene na Nkolo ya mabele mobimba.”+

  • Nzembo 84:maloba ya ebandeli ya loyembo-12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • Mpo na mokambi ya nzembo na Gitite.+ Ya bana ya Kora. Mondule.

      84 Tabernakle na yo monene+ ezali kitoko mpenza,

      Ee Yehova ya mampinga!+

       2 Molimo na ngai ezali na mposa ya mapango ya Yehova mpe lisusu eyoki mposa na yango makasi.+

      Motema na ngai mpe mosuni na ngai ezali koganga na esengo mpo na Nzambe ya bomoi.+

       3 Ata ndɛkɛ ezwi ndako,

      Mpe nyampeke zumbu na yango,

      Epai etye bana na yango—

      Etumbelo na yo monene, Ee Yehova ya mampinga, Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai!

       4 Esengo na baoyo bazali kofanda na ndako na yo!+

      Bazali kokoba kosanzola yo.+ Sela.

       5 Esengo na bato oyo makasi na bango ezali kouta na yo,+

      Baoyo babalabala minene ezali na motema na bango.+

       6 Wana bazali koleka na lobwaku ya patatalu ya mwa banzete ya baka,+

      Bazali kokómisa yango liziba;

      Ɛɛ, molakisi+ azali komizinga mapamboli.

       7 Bakotambola na nguya ya bomoi+ oyo ezali kobakisama se kobakisama;

      Mokomoko azali kobima liboso ya Nzambe na Siona.+

       8 Ee Yehova Nzambe ya mampinga, yoká libondeli na ngai;+

      Ee Nzambe ya Yakobo, tyá litoi.+ Sela.

       9 Ee nguba na biso, moná, Ee Nzambe,+

      Mpe talá elongi ya moto na yo oyo atyami mafuta.+

      10 Mpo mokolo moko na mapango na yo eleki mikolo nkóto epai mosusu.+

      Naponi kotɛlɛma na monɔkɔ ya ndako ya Nzambe na ngai+

      Na esika nafanda na bahema ya bato mabe.+

      11 Mpo Yehova Nzambe azali moi+ mpe nguba;+

      Apesaka boboto mpe nkembo.+

      Yehova ye moko akoboya te kopesa eloko moko ya malamu na baoyo bazali kotambola na bosembo.+

      12 Ee Yehova ya mampinga, esengo na moto oyo azali kotyela yo motema.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto