Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 26:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 nakopesa mpenza bino mbula oyo ezali kosopana na ntango na yango,+ mpe mokili ekopesa mpenza mbuma na yango,+ mpe nzete ya elanga ekopesa mbuma na yango.+

  • Kolimbola Mibeko 28:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpo na yo, Yehova akopesa etinda ete lipamboli ezala likoló ya bibombelo na yo ya biloko+ mpe likoló ya misala na yo nyonso,+ mpe akopambola yo mpenza na mokili oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo.

  • Nzembo 67:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Mabele ekobota mpenza mbuma na yango;+

      Nzambe, Nzambe na biso, akopambola biso.+

  • Yisaya 25:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe ya solo, na ngomba oyo,+ Yehova ya mampinga akosalela bato ya bikólo nyonso+ fɛti moko ya bilei ya mafuta mpenza,+ fɛti ya vinyo oyo eumelá, oyo mbɔtɔ elalá na nse, ya bilei ya mafuta mpenza, oyo etondi na mafuta ya mikuwa,+ ya vinyo+ oyo eumelá, oyo mbɔtɔ elalá na nse, oyo bakɔngɔlá.+

  • Yisaya 30:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe akopesa mpenza mbula mpo na momboto na yo oyo ozali kolona na mabele,+ mpe mbuma ya mabele nde mampa, oyo ekokóma mpenza na mafuta mpe ekozala mafutamafuta.+ Na mokolo yango, bibwɛlɛ na yo ekolya na esika monene ya kolya matiti.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto