Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 15:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Nani kati na banzambe azali lokola yo, Ee Yehova?+

      Nani azali lokola yo, yo oyo oleki bosantu?+

      Ye oyo basengeli kobanga+ na nzembo ya lisanzoli,+ Ye oyo asalaka makambo ya kokamwa.+

  • Nzembo 89:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Mpo nani akokani na Yehova na likoló oyo etondi na mapata?+

      Nani na bana ya Nzambe+ akoki kokokana na Yehova?

  • Nzembo 96:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Mpo banzambe nyonso ya bato ya bikólo bazali banzambe ya mpambampamba;+

      Kasi Yehova asalá likoló.+

  • Yisaya 40:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 “Kasi bino bokoki kokokanisa ngai na nani mpo nakóma ndenge moko na ye?” Mosantu alobi bongo.+

  • Yirimia 10:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Ee Yehova, moko te azali lokola yo.+ Ozali monene, mpe nkombo na yo ezali monene kati na nguya.+

  • Danyele 3:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Mpe ngai nazali kopesa etinda+ ete: moto ya ekólo nini, etuluku ya bato ya ekólo nini to monɔkɔ nini oyo ekoloba likambo moko ya mabe na Nzambe ya Shadrake, Meshake ná Abedenego, bakokata bango binama,+ mpe bakokómisa ndako na bango kabinɛ ya bato nyonso;+ mpo ezali na nzambe mosusu te oyo akoki kobikisa lokola oyo wana.”+

  • 1 Bakorinti 8:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpo atako baoyo babengami “banzambe”+ bazalaka, ezala na likoló+ to na mabele,+ ndenge “banzambe” bazali mingi mpe “bankolo” bazali mingi,+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto