Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 32:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  4 Libanga, mosala na ye ezali ya kokoka,+

      Mpo banzela na ye nyonso ezali bosembo.+

      Nzambe moko ya bosembo,+ epai na ye kozanga bosembo ezali te;+

      Azali moyengebene mpe sembo.+

  • Nzembo 5:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  4 Mpo yo ozali Nzambe oyo asepelaka na mabe te;+

      Moto mabe akoki kofanda mwa ntango epai na yo te.+

  • Nzembo 71:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Ee Nzambe, boyengebene na yo ekei tii na bisika etombwaná;+

      Mpo na makambo minene oyo osali,+

      Ee Nzambe, nani azali lokola yo?+

  • Nzembo 97:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Mapata mpe molili tuu ezingi ye;+

      Boyengebene mpe bosembo ezali esika oyo kiti na ye ya bokonzi etyami.+

  • Nzembo 145:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Yehova azali moyengebene na banzela na ye nyonso+

      Mpe sembo na misala na ye nyonso.+

  • Masese 16:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Kosala makambo ya mabe ezali eloko oyo bakonzi bayiná,+ mpo ezali na boyengebene nde kiti ya bokonzi epikamaka makasi.+

  • Emoniseli 15:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe bazali koyemba loyembo ya Moize+ moombo ya Nzambe mpe loyembo ya Mwana-Mpate,+ balobi:

      “Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,+ misala na yo ezali minene mpe ezali kokamwisa.+ Mokonzi ya seko,+ banzela na yo ezali boyengebene mpe solo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto