Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 18:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Sikoyo nayebi mpenza ete Yehova azali monene koleka banzambe+ mosusu nyonso mpo na likambo oyo Baezipito basalelaki Bayisraele na lofundo.”

  • Nzembo 97:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  9 Mpo yo, Ee Yehova, ozali Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba;+

      Omati na esika ya likoló mingi mpenza koleka banzambe mosusu.+

  • Nzembo 135:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Mpo ngai nayebi ete Yehova azali monene,+

      Mpe Nkolo na biso aleki banzambe mosusu nyonso.+

  • Yisaya 44:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Bózala na nsɔmɔ te, bókamwa mpe te.+ Nasali ete mokomoko na bino ayoka mpe nayebisi likambo yango banda ntango wana, boye te?+ Mpe bino bozali batatoli na ngai.+ Longola ngai, ezali nde na Nzambe mosusu?+ Te, Libanga ezali te.+ Nayebi ata moko te.’”

  • Malaki 1:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “Mpe moto oyo azali kosala na mayele mabe, wana nyama mobali ezali na etonga na ye, mpe azali kosala elako mpe azali kopesa Yehova mbeka ya nyama oyo ezali na mbeba alakelama mabe.+ Mpo nazali Mokonzi monene,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo, “mpe nkombo na ngai ekozala nsɔmɔ na kati ya bikólo.”+

  • 1 Bakorinti 8:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 mpo na biso, ya solo, Nzambe azali kaka moko,+ ye Tata,+ oyo biloko nyonso euti na ye, mpe biso mpo na ye;+ mpe Nkolo azali kaka moko,+ Yesu Kristo,+ oyo na nzela na ye biloko nyonso ezali,+ mpe biso na nzela na ye.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto