15 Talá longwa na likoló, efandelo na yo mosantu,+ mpe pambolá bato na yo Yisraele+ mpe mabele oyo opesi biso, kaka ndenge olapelaki bankɔkɔ na biso ndai,+ mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.’+
9 Mpo na Yehova, miso na ye+ ezali kotambolatambola na mabele mobimba+ mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema+ na bango ezali mobimba epai na ye. Osali bozoba+ na likambo oyo, yango wana kobanda sikoyo bitumba ekoyela yo.”+