36 Na nzela ya elimo santu,+ Davidi ye moko alobaki ete: ‘Yehova alobaki na Nkolo na ngai ete: “Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali tii nakotya banguna na yo na nse ya makolo na yo.”’+
34 Nani akokweisa bango na likambo? Moto moko te, mpo Kristo Yesu akufaki mpe alamwisamaki uta na bakufi, ye moto azali na lobɔkɔ ya mobali+ ya Nzambe, mpe moto azali kolobela biso.+
20 oyo asalaki na yango na likambo ya Kristo ntango alamwisaki ye uta na bakufi+ mpe afandisaki ye na lobɔkɔ na ye ya mobali+ na kati ya bisika ya likoló,+
3 Mwana yango azali mpenza komonisa nkembo+ ya Nzambe mpe azali elilingi na Ye mpenza,+ mpe azali kosimba biloko nyonso na liloba ya nguya na ye,+ mpe nsima ya kopɛtola masumu+ na biso afandaki na lobɔkɔ ya mobali+ ya Bokonzi Monene kuna na likoló.+
8Sikoyo na makambo oyo tozali kolobela likanisi ya ntina mpenza yango oyo: Tozali na nganga-nzambe monene+ ya ndenge wana, mpe afandi na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya Bokonzi Monene na likoló,+
2 awa tozali kotala na likebi mpenza Kapita+ mpe Mokokisi ya kondima na biso,+ Yesu. Mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye ayikelaki nzete ya mpasi mpiko,+ atyolaki nsɔni, mpe afandi na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya Nzambe.+