Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 14:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe Melekisedeke,+ mokonzi ya Saleme,+ abimisaki mampa mpe vinyo,+ mpe azalaki nganga-nzambe ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló.+

  • Zekaria 6:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe ye moko akotonga tempelo ya Yehova, mpe ye akozwa lokumu;+ mpe akofanda mpenza mpe akoyangela na kiti na ye ya bokonzi, mpe akokóma mpenza nganga-nzambe na kiti na ye ya bokonzi,+ mpe boyokani+ ekozala kati na misala yango mibale.

  • Baebre 5:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Kaka ndenge alobi mpe na esika mosusu ete: “Ozali nganga-nzambe libela na libela lokola Melekisedeke.”+

  • Baebre 6:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 epai moto oyo aleki liboso akɔtaki mpo na biso,+ Yesu, oyo akómi nganga-nzambe monene lokola Melekisedeke libela na libela.+

  • Baebre 7:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Lokola azali na tata te, na mama te, na molɔngɔ ya bankɔkɔ te, lokola mikolo na ye ezali na ebandeli te+ mpe bomoi na ye na nsuka te, kasi akómi lokola Mwana ya Nzambe,+ azali nganga-nzambe seko na seko.+

  • Baebre 7:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Yango wana, soki ezaleli ya kokoka+ eyaka mpenza na lisalisi ya bonganga-nzambe ya Balevi,+ (mpo bonganga-nzambe wana eyaki nzela moko na Mibeko+ oyo bapesaki bato mpe ezalaki likambo ya ntina mpenza,) mbɛlɛ ntina ezalaki lisusu+ ete nganga-nzambe mosusu abima lokola Melekisedeke+ mpe báloba ete azali lokola Arona?

  • Baebre 7:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 mpo ekomami boye: “Ozali nganga-nzambe libela na libela lokola Melekisedeke.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto