Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 4:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe bosengeli kobatela mpe kosalela yango, mpamba te yango nde bwanya+ mpo na bino mpe mayele+ mpo na bino na miso ya bato ya bikólo oyo bakoyoka nsango ya malako oyo nyonso, mpe bakoloba mpenza ete: ‘Ekólo monene oyo ezali mpenza ekólo moko ya bato ya bwanya mpe ya mayele.’+

  • Yobo 28:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Mpe alobaki na moto ete:

      ‘Talá! Kobanga Yehova—nde bwanya,+

      Mpe kopɛngwa na mabe nde mayele.’”+

  • Masese 1:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Kobanga Yehova ezali ebandeli ya boyebi.+ Bwanya ná disiplini, yango nde bazoba batyolá.+

  • Masese 9:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya,+ mpe boyebi ya Oyo Aleki Bosantu, yango nde mayele.+

  • Mosakoli 12:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Nsuka ya likambo, yango oyo, nsima ya koyoka makambo nyonso: Bangá Nzambe ya solo+ mpe batelá mitindo na ye.+ Mpo yango nde mokumba nyonso ya moto.

  • Baebre 11:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Na kondima Noa,+ nsima ya kozwa likebisi ya Nzambe mpo na makambo oyo emonanaki naino te,+ abangaki Nzambe mpe atongaki masuwa+ mpo na kobikisa bato ya ndako na ye; mpe na kondima wana, akweisaki mokili na likambo,+ mpe akómaki mozwi-ya-libula ya boyengebene+ oyo euti na kondima.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto