Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 27:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Soki nazalaki na kondima te ete nakomona bolamu ya Yehova na mokili ya baoyo bazali na bomoi+​—!

  • Nzembo 142:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Ee Yehova, nabelelaki yo mpo na kosɛnga lisalisi.+

      Nalobaki ete: “Ozali ekimelo na ngai,+

      Likabo+ na ngai na mokili ya bato ya bomoi.”+

  • Mosakoli 9:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpo bato ya bomoi bayebi ete bakokufa;+ kasi bakufi bayebi ata eloko moko te,+ bazali mpe na lifuti lisusu te, mpo bato babosani makambo oyo ekokaki kosala ete bákanisa bango.+

  • Yisaya 38:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Nalobi: “Nakomona Yah te, ɛɛ Yah, na mokili ya bato ya bomoi.+

      Nakotala bato lisusu te—nakozala elongo na bato oyo bafandi na mokili epai makambo nyonso esukaka.

  • Yisaya 53:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Basambisaki ye na bosembo te yango wana anyokwamaki mpe alongolamaki;+ mpe nani akoluka koyeba makambo ya libota na ye?+ Mpo alongolamaki+ na mokili ya bato ya bomoi.+ Abɛtamaki kobɛtama+ mpo bato na ngai babukaki mibeko.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto