Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 25:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Soki moto atɛlɛmi mpo na kolanda yo mpe koluka molimo na yo, molimo ya nkolo na ngai ekozipama mpe ekobombama na kati ya saki ya bomoi+ epai ya Yehova Nzambe na yo;+ kasi akobwaka molimo ya banguna na yo lokola libanga na bilingongo.+

  • Yobo 1:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Na yango, Yehova alobaki na Satana: “Talá! Biloko na ye nyonso ezali na lobɔkɔ na yo. Kasi ye moko, kosembolela ye lobɔkɔ na yo te!” Bongo Satana abimaki, alongwe liboso ya elongi ya Yehova.+

  • Nzembo 50:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 “Bóyanganisa epai na ngai bato na ngai ya sembo,+

      Baoyo bazali kosala kondimana na ngai na nzela ya mbeka.”+

  • Nzembo 72:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Akosikola molimo na bango na monyoko mpe na mobulu,

      Mpe makila na bango ekozala na motuya na miso na ye.+

  • Nzembo 91:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Lokola alingaka ngai mingi,+

      Ngai mpe nakobikisa ye.+

      Nakobatela ye mpo ayebi nkombo na ngai.+

  • Zekaria 2:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpo talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Nsima ya nkembo+ atindaki ngai na bikólo oyo ezalaki kopunza bino;+ mpo moto oyo azali kosimba bino+ azali kosimba mbuma ya liso na ngai.+

  • 2 Petro 2:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 elingi koloba Yehova ayebi kosikola na komekama bato oyo bakangamaka na Nzambe,+ kasi kobomba mpo na mokolo ya kosambisama bato oyo bazangi boyengebene mpo bábomama,+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto