Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezera 9:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe nalobaki ete:+ “Ee Nzambe na ngai, nayoki mpenza nsɔni+ mpe nabangi+ kotombola elongi na ngai epai na yo, Ee Nzambe na ngai, mpo mabunga+ na biso ekómi mingi na motó na biso mpe ngambo na biso emati mingi tii na likoló.+

  • Nehemia 9:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe momboto ya Yisraele emikabolaki+ na bapaya nyonso,+ bongo batɛlɛmaki mpe bayambolaki+ masumu+ na bango moko mpe mabunga ya batata na bango.+

  • Nzembo 38:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  4 Mpo mabunga na ngai eleki na motó na ngai;+

      Lokola mokumba moko ya kilo, yango eleki ngai na kilo.+

  • Nzembo 41:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  4 Ngai nalobaki ete: “Ee Yehova, moniselá ngai boboto.+

      Bikisá molimo na ngai, mpo nasaleli yo lisumu.”+

  • Nzembo 51:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  4 Nasaleli yo lisumu, kaka yo moko,+

      Mpe nasali oyo ezali mabe na miso na yo,+

      Mpo yo omonana moyengebene ntango ozali koloba,+

      Mpo yo ozala na libunga te ntango ozali kosambisa.+

  • Baroma 3:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpo bato nyonso basali lisumu+ mpe bakómaka na nkembo ya Nzambe te,+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto