Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yobo 9:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 “Ɛɛ, nayebi ete ezali bongo.

      Kasi ndenge nini moto—mowei mpamba—akoki kolonga likambo soki asambi na Nzambe?+

  • Yobo 10:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Soki nasali lisumu mpe yo okobi kotalatala ngai+

      Mpe na libunga na ngai ozali kotánga ngai te lokola moto oyo azali na likambo te;+

  • Nzembo 103:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpo ye moko ayebi malamu ndenge oyo tosalemá,+

      Azali kobosana te ete tozali putulu.+

  • Nzembo 143:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Mpe kosamba na mosaleli na yo te;+

      Mpo liboso na yo moto ya bomoi ata moko te akoki kozala moyengebene.+

  • Yisaya 55:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Moto mabe atika nzela na ye,+ mpe moto oyo alukaka kosalela bato mabe atika makanisi na ye;+ mpe azongela Yehova mpe akoyokela ye mawa,+ azongela Nzambe na biso, mpo akolimbisa mpenza.+

  • Danyele 9:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Ee Nzambe na ngai, balusá litoi na yo mpe yoká.+ Fungolá miso na yo mpe moná ndenge totikalá mpamba mpe engumba oyo ebengami na nkombo na yo;+ mpo ezali te mpo na misala na biso ya boyengebene nde tozali kokweisa malɔmbɔ na biso liboso na yo,+ kasi mpo yo ozali na motema mawa mingi mpenza.+

  • Baroma 3:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Yango wana, moto moko te akotángama moyengebene liboso na ye na misala ya mibeko,+ mpo na nzela ya mibeko+ nde lisumu eyebani malamumalamu.+

  • Tito 3:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 ezalaki te mpo na misala+ ya boyengebene oyo biso tosalaki,+ kasi mpo na motema mawa+ na ye abikisaki biso na ndenge asukolaki+ biso mpe amemaki biso na bomoi+ mpe akómisi biso bato ya sika na lisalisi ya elimo santu.+

  • Yakobo 3:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpo biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.+ Soki moto abɛtaka libaku na maloba te,+ ye azali moto ya kokoka,+ oyo akoki kopekisa mpe nzoto na ye mobimba.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto