Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 29:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe osengeli kozwa mafuta mosantu*+ mpe kosopa yango na motó na ye mpe kotya ye mafuta.+

  • Kobima 30:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Bongo osengeli kosala na yango mafuta mosantu mpo na kotyaka mafuta, malasi, eloko oyo esangisami na moto oyo asalaka malasi.+ Ekozala mafuta mosantu mpo na kotyaka mafuta.+

  • Balevi 21:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “‘Mpe nganga-nzambe monene kati na bandeko na ye, oyo mafuta mosantu* esopamaki+ na motó na ye mpe oyo lobɔkɔ na ye etondisamaki na nguya* mpo na kolata bilamba,+ akomeka te kobebisa nsuki ya motó na ye,+ mpe akopasola bilamba na ye te.+

  • Nzembo 141:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Soki moyengebene abɛti ngai, ekozala motema boboto;+

      Mpe soki apameli ngai, ekozala mafuta na motó na ngai,+

      Oyo motó na ngai ekoboya te.+

      Mpo nakokoba kobondela ata na ntango ya bampasi na bango.+

  • Masese 27:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mafuta mpe mpaka ya malasi+ nde esepelisaka motema, ndenge mpe elɛngi ya kozala na moninga esepelisaka motema mpo na toli na ye oyo epesami na molimo na ye mobimba.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto