Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 7:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Na mbala moko, Moize ná Arona basalaki bongo,+ kaka ndenge Yehova apesaki mitindo,+ mpe atombolaki lingenda mpe abɛtaki mai ya Ebale Nile na miso ya Farao ná basaleli na ye,+ mpe mai nyonso ya Ebale Nile ebongwanaki makila.+

  • Kobima 8:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Na yango Arona asembolaki lobɔkɔ na ye likoló ya mai ya Ezipito, mpe mbemba ebandaki komata mpe kozipa mokili ya Ezipito.

  • Kobima 8:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe basalaki yango. Bongo Arona asembolaki lobɔkɔ na ye ná lingenda na ye mpe abɛtaki putulu ya mabele, mpe bangungi ezalaki likoló ya bato mpe banyama. Putulu nyonso ya mabele ekómaki bangungi na mokili mobimba ya Ezipito.+

  • Kobima 9:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bongo Yehova asalaki likambo yango na mokolo oyo elandaki, mpe bibwɛlɛ ya ndenge nyonso na Ezipito ebandaki kokufa;+ kasi moko te kati na bibwɛlɛ ya bana ya Yisraele ekufaki.

  • Kobima 9:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Bongo bazwaki putulu ya milinga oyo euti na mombonda mpe batɛlɛmaki liboso ya Farao, mpe Moize abwakaki yango na likoló, mpe yango ekómaki babibɔ oyo ezali kobimisa matutu+ na nzoto ya bato mpe ya banyama.

  • Kobima 9:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Bongo Moize asembolaki lingenda na ye na likoló; mpe Yehova atindaki bankake ná mbula ya mabanga,+ mpe mɔtɔ ezalaki kokita na mabele, mpe Yehova azalaki kaka konɔkisa mbula ya mabanga na mokili ya Ezipito.

  • Kobima 10:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Sikoyo Yehova alobaki na Moize ete: “Sembolá+ lobɔkɔ na yo likoló ya mokili ya Ezipito mpo mayoyo eya, mpo emata na mokili ya Ezipito mpe elya milona nyonso ya mokili, eloko nyonso oyo mbula ya mabanga etikaki.”+

  • Kobima 10:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Sembolá lobɔkɔ na yo na likoló,+ mpo molili ezala na mokili ya Ezipito mpe molili yango ezala lokola eloko oyo ekoki kosimbama.”

  • Kolimbola Mibeko 4:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 To Nzambe amekaki nde koya kolongola ekólo moko na kati ya ekólo mosusu, na komekama,+ na bilembo+ mpe na makamwisi+ mpe na etumba+ mpe na nguya ya lobɔkɔ+ na ye mpe na lobɔkɔ oyo esembolami+ mpe na makambo minene ya nsɔmɔ,+ lokola nyonso oyo Yehova Nzambe na bino asalaki mpo na bino na Ezipito na miso na yo?

  • Nehemia 9:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Bongo opesaki bilembo mpe makamwisi mpo na kotɛmɛla Farao, basaleli na ye nyonso ná bato nyonso ya mokili na ye,+ mpo oyebaki ete basalelaki bango makambo na lofundo;+ mpe nkombo na yo+ ekumisamaki lokola na mokolo oyo.

  • Nzembo 105:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Balakisaki bango bilembo na ye,+

      Mpe makamwisi na mokili ya Kame.+

  • Misala 7:36
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Mobali yango abimisaki bango+ nsima ya kosala makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya mpe bilembo na Ezipito+ mpe na Mbu Motane+ mpe na esobe mbula ntuku minei (40).+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto