14 “Mpe ekosalema mpenza boye: soki, na nsima, mwana na yo akotuna yo+ ete: ‘Likambo oyo elimboli nini?’ bongo osengeli koloba na ye ete: ‘Yehova abimisaki biso na Ezipito, na ndako ya boombo,+ na nguya ya lobɔkɔ na ye.+
21 Mpe obimisaki bato na yo Yisraele na mokili ya Ezipito,+ na bilembo mpe na makamwisi+ mpe na nguya ya lobɔkɔ na yo mpe na lobɔkɔ oyo esembolami mpe na makambo minene ya nsɔmɔ.+