Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 13:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Liyebisi mpo na Babilone,+ oyo Yisaya mwana ya Amoze+ amonaki na emonaneli:

  • Yisaya 47:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 47 Ee ngɔndɔ, mwana mwasi ya Babilone,+ kitá mpe fandá na putulu.+ Ee mwana mwasi ya Bakaladea,+ fandá na mabele esika kiti ya bokonzi ezali te.+ Mpo okozwa lisusu te libaku ya kobengama moto oyo amesaná na makambo ya makasi te mpe oyo amesaná na bomɛngo.+

  • Yirimia 25:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “‘Mpe ekosalema mpenza boye: ntango mbula ntuku nsambo (70) ekokokisama,+ nakolandela mokonzi ya Babilone mpe ekólo yango,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘libunga na bango, ɛɛ nakolandela mokili ya Bakaladea,+ mpe nakokómisa yango esika oyo etikali mpamba mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+

  • Yirimia 50:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Bóyebisa yango kati na bikólo mpe bósakola yango.+ Bótombola elembo;+ bósakola yango. Bóbomba eloko te. Bóloba: ‘Babilone ezwami.+ Bele apɔli na nsɔni.+ Merodake akómi kobanga. Bililingi na ye epɔli na nsɔni.+ Bikeko na ye ya bosɔtɔ ekómi kobanga.’

  • Emoniseli 18:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe agangaki na mongongo makasi+ ete: “Akwei! Babilone Monene akwei,+ mpe akómi esika ya kofanda ya bademo mpe esika ya mipɛpɛ+ nyonso ya mbindo mpe esika ya kobombana ya bandɛkɛ nyonso ya mbindo mpe oyo eyinami!+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto