Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 3:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe mwinda ya Nzambe ebomamaki naino te, mpe Samwele azalaki kolala na tempelo+ ya Yehova, esika sanduku ya Nzambe ezalaki.

  • 1 Ntango 16:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Na yango, bakɔtisaki+ sanduku ya Nzambe ya solo mpe batyaki yango na kati ya hema oyo Davidi atɛlɛmisaki mpo na yango;+ mpe babandaki kopesa makabo ya kotumba mpe bambeka ya boyokani liboso ya Nzambe ya solo.+

  • Nzembo 5:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Ngai, na motema boboto oyo otondi na yango+

      Nakokɔta na ndako na yo,+

      Nakogumbama wana nazali kotala na ngámbo ya tempelo na yo mosantu mpo na kobanga yo.+

  • Nzembo 28:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Yoká mongongo ya malɔmbɔ na ngai ntango nazali kolelela yo mpo na kosɛnga lisalisi,

      Ntango nazali kotombola mabɔkɔ+ na ngai na ngámbo ya shambrɛ ya kati mpenza ya esika mosantu na yo.+

  • Danyele 6:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Kasi Danyele, ntango kaka ayebaki ete mokanda yango etyami lobɔkɔ, akɔtaki na ndako na ye, mpe maninisa ya shambrɛ na ye ya likoló na ngámbo ya Yerusaleme ezalaki polele,+ ɛɛ, mbala misato na mokolo+ azalaki kofukama na mabɔlɔngɔ na ye mpe kobondela+ mpe kopesa masanzoli liboso ya Nzambe na ye,+ ndenge azalaki kosala mbala na mbala liboso ya likambo yango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto