Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 1:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 1 Na ebandeli+ Nzambe+ azalisaki+ likoló mpe mabele.+

  • Nehemia 9:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 “Yo ozali Yehova, kaka yo moko;+ yo moko nde osalaki likoló,+ ɛɛ, mosika kuna na likoló mpenza, mpe limpinga na yango nyonso,+ mabele+ mpe nyonso oyo ezali likoló na yango,+ mbu+ mpe nyonso oyo ezali na kati na yango;+ mpe ozali kobatela yango nyonso na bomoi; mpe limpinga+ ya likoló ezali kogumbamela yo.

  • Yirimia 10:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Ye azali Mokeli ya mabele na nzela ya nguya na ye,+ Ye oyo atɛlɛmisaki mabele oyo ebotaka na nzela ya bwanya na ye,+ mpe Ye oyo atandaki likoló na nzela ya mayele na ye.+

  • Misala 4:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Ntango bayokaki bongo, batombolaki mingongo na bango na bomoko mpenza epai ya Nzambe+ mpe balobaki ete:

      “Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso,+ yo ozali Oyo osalaki likoló mpe mabele mpe mbu mpe biloko nyonso na kati na yango,+

  • Emoniseli 4:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo+ mpe lokumu+ mpe nguya,+ mpo yo ozalisaki biloko nyonso,+ mpe mpo na mokano na yo+ yango ezalaki mpe ezalisamaki.”+

  • Emoniseli 14:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 azali koloba na mongongo makasi ete: “Bóbanga Nzambe+ mpe bókumisa ye,+ mpo ngonga na ye ya kosambisa eyei,+ yango wana bósambela Oyo asalá+ likoló, ná mabele, ná mbu, ná maziba ya mai.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto