Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 31:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Mpo ozali libanga na ngai mpe esika makasi ya libateli na ngai;+

      Mpo na nkombo na yo+ okokamba ngai mpe okotambwisa ngai.+

  • Nzembo 79:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  9 Ee Nzambe ya lobiko na biso, salisá biso,+

      Mpo na nkembo ya nkombo na yo;+

      Bikisá biso mpe zipá masumu na biso mpo na nkombo na yo.+

  • Nzembo 109:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Kasi yo ozali Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.+

      Salelá ngai bolamu mpo na nkombo na yo.+

      Lokola motema boboto na yo ezali malamu, bikisá+ ngai.

  • Nzembo 143:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpo na nkombo na yo,+ Ee Yehova, otika ngai na bomoi.+

      Na boyengebene na yo,+ obimisa molimo na ngai na mpasi.+

  • Ezekiele 36:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 “Na yango, lobá na ndako ya Yisraele ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ee ndako ya Yisraele, ezali mpo na bino te nde nazali kosala yango, kasi mpo na nkombo na ngai mosantu oyo bokómisi eloko mpamba na kati ya bikólo epai boyei.”’+

  • Danyele 9:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Ee Yehova, yoká.+ Ee Yehova, limbisá.+ Ee Yehova, tyá likebi mpe salá.+ Koumela te,+ mpo na yo moko, Ee Nzambe na ngai, mpo nkombo na yo ebengami na engumba na yo mpe na bato na yo.”+

  • Matai 6:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “Yango wana, bosengeli kobondela boye:+

      “‘Tata na biso na likoló, nkombo+ na yo esantisama.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto