19 Osengeli te kopɛngwisa lisambisi.+ Osengeli te kopona bilongi+ to kondima kanyaka, mpo kanyaka ebomaka miso ya bato ya bwanya+ mpe ebulunganisaka maloba ya bayengebene.
3 Nde bana na ye batambolaki na banzela na ye te,+ kasi bazalaki kolinga kolanda litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe+ mpe bazalaki kondima kanyaka+ mpe kopɛngwisa lisambisi.+
12 Epai na yo, bazwi kanyaka mpo na kosopa makila.+ Ozwi benefisi+ mpe benefisi ya lokoso,+ mpe na mobulu, ozali se kozwa litomba+ na kobuba baninga na yo,+ mpe obosani ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.
12 Mpo nayebi ete botomboki na bino ezali mingi+ mpe masumu na bino ezali na nguya,+ Ee bino baoyo bozali banguna ya moyengebene,+ bino baoyo bozali kozwa mbongo ya kokangisa bino monɔkɔ,+ mpe bato oyo bazali koboya babola+ ata na porte.+