-
Yoane 8:44Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
44 Bino bouti na tata na bino Zabolo,+ mpe bolingi kokokisa bamposa ya tata na bino.+ Ye azalaki mobomi-bato ntango abandaki,+ mpe akangamaki makasi te na solo, mpo solo ezali na kati na ye te. Ntango alobaka lokuta, alobaka na kolanda makanisi na ye moko, mpo azali moto ya lokuta mpe tata ya lokuta.+
-
-
Emoniseli 21:8Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
8 Kasi bato ya bibangabanga ná baoyo bazangi kondima+ ná baoyo bazali na bosɔtɔ mpe na mbindo+ ná babomi-bato+ ná bato ya pite+ ná baoyo basalaka misala ya bilimo mabe ná basambeli ya bikeko+ ná bato nyonso ya lokuta,+ likabo na bango ekozala na kati ya laki oyo ezali kopela na mɔtɔ+ mpe na sufulu.+ Yango elakisi liwa ya mibale.”+
-