31 Ya solo mpenza, lisangá+ na Yudea mobimba, na Galile mpe na Samaria ekɔtaki na eleko moko ya kimya, ezalaki kotongama; mpe lokola ezalaki kotambola na kobanga Yehova+ mpe na libɔndisi ya elimo santu+ ekobaki kokola.
7Na yango, lokola tozali na bilaka wana,+ bandeko ya bolingo, tómipɛtola+ na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo,+ tómonisaka ete tozali kobanga Nzambe mpo bosantu na biso ekóma ya kokoka.+
17 Lisusu, soki bozali kobelela Tata oyo aponaka bilongi te ntango asambisaka+ na kolanda mosala ya moto na moto, bómitambwisa na kobanga+ na ntango oyo bofandi bapaya.+