Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 7:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Kasi, banganga-nzambe ya Ezipito oyo basalelaka maji basalaki kaka bongo na misala na bango ya molili;+ bongo motema ya Farao ezalaki kaka makasi,+ mpe ayokelaki bango te, kaka ndenge Yehova asilaki koloba.+

  • Nehemia 9:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Atako ozalaki kotatwela+ bango mpo na kozongisa bango na mobeko na yo,+ bango bazalaki kaka kosala makambo na lofundo+ mpe bayokaki mitindo na yo te; basalelaki bikateli na yo ya lisambisi+ lisumu,+ bikateli oyo, soki moto alandi yango, akozala na bomoi na nzela na yango.+ Mpe bazalaki kaka kokanga matoi,*+ mpe bakómisaki motó na bango makasi,+ mpe bayokaki te.+

  • Yobo 9:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  4 Azali na bwanya kati na motema mpe azali na makasi kati na nguya.+

      Nani akoki kosalela ye motó makasi mpe azanga kozwa likama?+

  • Masese 29:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Moto oyo apamelami mbala na mbala+ kasi azali kokómisa motó na ye makasi*+ akobukana pwasa, mpe kobika ekozala te.+

  • Yisaya 30:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 “Mawa na bana ya motó makasi,”+ yango nde liloba ya Yehova, “baoyo balingá kokokisa mokano, kasi oyo euti na ngai te;+ mpe balingá kosopa likabo ya masanga, kasi na elimo na ngai te, mpo na kobakisa lisumu likoló ya lisumu;+

  • Yirimia 16:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe bino, na misala na bino, bosali mabe mingi koleka batata na bino,+ mpe talá, bozali kolanda moto na moto motó makasi+ mpe motema mabe na ye na kotosáká ngai te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto