Yobo 34:21 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 21 Mpo miso na ye ezali likoló ya banzela ya moto,+Mpe azali komona matambe na ye nyonso. Nzembo 11:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Yehova azali na kati ya tempelo na ye mosantu.+Yehova—kiti na ye ya bokonzi ezali na likoló.+Miso na ye ezali kotala, miso na ye ya kongɛnga ezali kotalatala+ bana ya bato. Nzembo 66:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Azali koyangela na nguya na ye libela na libela.+Miso na ye ezali kotala bikólo.+Baoyo bazali motó makasi, bámikumisa te.+ Sela. Masese 5:21 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 21 Mpo banzela ya moto ezali liboso ya miso ya Yehova,+ mpe atyaka likebi na banzela na ye nyonso.+ Yirimia 16:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 Mpo miso na ngai ezali likoló ya banzela nyonso na bango. Babombani te liboso na ngai, mpe libunga na bango ebombani te liboso ya miso na ngai.+ Yirimia 23:24 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 24 “To moto moko akoki nde kobombana na bisika ya kobombana bongo ngai namona ye te?”+ yango nde liloba ya Yehova. “Ngai moko natondisi likoló ná mabele te?”+ yango nde liloba ya Yehova. Baebre 4:13 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 13 Mpe ezali na ekelamu moko te oyo ezangi komonana polele na miso na ye,+ kasi biloko nyonso ezali bolumbu mpe ezali komonana polele na miso ya moto oyo tokozongisa monɔkɔ epai na ye.+
4 Yehova azali na kati ya tempelo na ye mosantu.+Yehova—kiti na ye ya bokonzi ezali na likoló.+Miso na ye ezali kotala, miso na ye ya kongɛnga ezali kotalatala+ bana ya bato.
7 Azali koyangela na nguya na ye libela na libela.+Miso na ye ezali kotala bikólo.+Baoyo bazali motó makasi, bámikumisa te.+ Sela.
17 Mpo miso na ngai ezali likoló ya banzela nyonso na bango. Babombani te liboso na ngai, mpe libunga na bango ebombani te liboso ya miso na ngai.+
24 “To moto moko akoki nde kobombana na bisika ya kobombana bongo ngai namona ye te?”+ yango nde liloba ya Yehova. “Ngai moko natondisi likoló ná mabele te?”+ yango nde liloba ya Yehova.
13 Mpe ezali na ekelamu moko te oyo ezangi komonana polele na miso na ye,+ kasi biloko nyonso ezali bolumbu mpe ezali komonana polele na miso ya moto oyo tokozongisa monɔkɔ epai na ye.+