Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yosua 22:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Akana,+ mwana ya Zera, nde asalaki likambo moko ya kozanga bosembo na eloko oyo esengelaki kobebisama, kasi nkanda eyelaki liyangani mobimba ya Yisraele, boye te?+ Mpe, na libunga na ye, akufaki ye moko te.’”+

  • 1 Bakorinti 5:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Ntina oyo bozali komikumisa+ ezali malamu te. Boyebi te ete mwa levire moke evimbisaka+ pɔtɔpɔtɔ mobimba ya farini?+

  • Bagalatia 5:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mwa levire moke evimbisaka pɔtɔpɔtɔ mobimba ya farini.+

  • Tito 1:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Esengeli kokangisa bango minɔkɔ, mpo bato yango bazali se kokɔtisa mobulu na mabota+ ntango bazali koteya makambo oyo basengeli koteya te mpo na kozwa litomba na ndenge ya mabe.+

  • Baebre 12:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 bókeba mpenza mpo moto moko azanga boboto monene ya Nzambe te;+ mpo mosisa moko te ya ngɛngɛ+ ebota mpe ekɔtisa mobulu mpe ekómisa bato mingi mbindo te;+

  • 3 Yoane 10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Yango wana, soki nayei, nakokundola misala na ye oyo azali kokoba kosala,+ ndenge azali kolobaloba mabe mpo na biso.+ Lisusu, asuki kaka na makambo wana te, ye moko ayambaka bandeko+ na limemya te, mpe baoyo balingi koyamba+ bango, alukaka kopekisa+ bango mpe kobwaka bango libándá+ ya lisangá.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto