9 Elenge, sepelá+ na bolenge na yo, mpe motema na yo esala yo malamu na mikolo ya bolenge na yo, mpe tambolá na banzela ya motema na yo mpe na makambo oyo miso na yo emoni.+ Kasi yebá ete mpo na oyo wana nyonso, Nzambe ya solo akosambisa yo.+
31 Mpamba te atye mokolo moko oyo akani kosambisa+ na boyengebene mabele oyo bato bafandi na nzela ya moto moko oyo ye aponi, mpe apesi bato nyonso ndanga ndenge asekwisi+ ye uta na bakufi.”
5 Na yango, bósambisa eloko moko te+ liboso ya ntango na yango, tii Nkolo akoya,+ ye oyo akobimisa na pole makambo oyo ebombamá ya molili+ mpe akomonisa polele mikano ya mitema,+ mpe na ntango yango moto na moto akozwa lokumu na ye oyo euti na Nzambe.+
10 Mpo biso nyonso tosengeli komonisama polele liboso ya kiti ya kosambisa ya Kristo,+ mpo moto na moto azwa oyo ebongi na ye mpo na makambo oyo esalemaki na nzoto, na kotalela makambo oyo azalaki kosala, ezala ya malamu to ya mabe.+