Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Danyele 2:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Na ntango yango, ebende, mabele ya lima oyo bayemi, motako, palata ná wolo, yango nyonso ebukanaki mpe ekómaki lokola mposo ya blé ya kokauka oyo euti na esika ya kotutatuta mbuma na eleko ya molunge,+ mpe mopɛpɛ ememaki yango, bongo ata ndambo na yango emonanaki te.+ Mpe libanga oyo ebɛtaki ekeko yango, ekómaki ngomba moko monene mpe etondaki mabele mobimba.+

  • Zekaria 8:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Nakozonga na Siona+ mpe nakofanda na Yerusaleme;+ mpe Yerusaleme ekobengama mpenza engumba ya bosolo,+ mpe ngomba ya Yehova+ ya mampinga, ngomba mosantu.’”+

  • Baebre 12:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Kasi bopusani nde penepene na Ngomba Siona+ mpe na engumba+ ya Nzambe ya bomoi, Yerusaleme ya likoló,+ mpe na bamiriade ya baanzelu,+

  • Emoniseli 21:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Bongo amemaki ngai na nguya ya elimo tii na ngomba moko ya monene mpe ya molai,+ mpe alakisaki ngai engumba mosantu+ Yerusaleme oyo euti na likoló epai ya Nzambe ezali kokita+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto