8 Akolongola mpenza liwa mpo na libela,+ mpe Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova akopangwisa mpenza mpisoli na bilongi nyonso.+ Mpe akolongola nsɔni ya bato na ye na mabele mobimba,+ mpo Yehova ye moko nde alobi yango.
26 Kasi mpo na bakufi, na likambo etali kolamuka na bango, botángá te na mokanda ya Moize, na lisolo ya mwa nzete ya nzubɛ, ndenge Nzambe alobaki na ye: ‘Nazali Nzambe ya Abrahama mpe Nzambe ya Yisaka mpe Nzambe ya Yakobo’?+
14 Mpo soki kondima na biso ezali ete Yesu akufaki mpe asekwaki,+ ndenge moko mpe, baoyo balali na kati ya liwa na nzela ya Yesu, Nzambe akozongisa bango na bomoi elongo na ye.+