23 Mpe sanza oyo ebimi mobimba eyoki nsɔni, mpe moi oyo ezali kongala eyoki nsɔni,+ mpo Yehova ya mampinga akómi mokonzi+ na nkembo na Ngomba Siona+ mpe na Yerusaleme mpe liboso ya mibange na ye.+
11 Yehova akoyokisa bango nsɔmɔ;+ mpamba te akokɔndisa banzambe nyonso ya mabele,+ mpe bato bakogumbamela ye,+ moto na moto na esika na ye, bisanga nyonso ya bikólo.+