16 Mpe ekozala mpenza na balabala moko monene+ oyo ekouta na Asiri mpo na bato na ye+ oyo bakotikala,+ kaka ndenge balabala moko ezalaki mpo na Yisraele na mokolo oyo abimaki na mokili ya Ezipito.
10 Bóleka, bóleka na baporte. Bóbongisa nzela ya bato.+ Bótondisa mabele, bótondisa mabele na balabala monene. Bólongola mabanga na yango.+ Bótɛlɛmisela bato ya bikólo elembo.+
21 “Omitɛlɛmisela bilembo ya nzela. Omityela makonzí ya mabanga oyo ezali komonisa nzela.+ Tyá motema na yo likoló ya nzela ya monene, nzela epai osengeli kokende.+ Zongá, Ee ngɔndɔ ya Yisraele. Zongá na bingumba oyo ezali ya yo.+