Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 51:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpo Yehova akobɔndisa mpenza Siona.+ Ya solo, akobɔndisa bisika na ye nyonso oyo ebebisamá,+ mpe akokómisa esobe na ye lokola Edene+ mpe mokili patatalu na ye oyo ekauká lokola elanga ya Yehova.+ Nsai monene mpe esengo ekomonana kuna, matɔndi mpe mongongo ya mondule.+

  • Yisaya 56:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 nakomema mpe bango na ngomba na ngai mosantu+ mpe nakosepelisa bango na ndako na ngai ya mabondeli.+ Makabo na bango ya kotumba mobimba+ ná bambeka+ na bango ekondimama likoló ya etumbelo+ na ngai. Mpo ndako na ngai ekobengama ndako ya mabondeli mpo na bato ya bikólo nyonso.”+

  • Yisaya 57:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Ntango okoganga mpo na koluka lisalisi, biloko na yo oyo oyanganisá ekobikisa yo te,+ kasi mopɛpɛ ekomema yango nyonso.+ Molinga ekomema yango, kasi moto oyo azali kokima epai na ngai+ akozwa mokili ezala libula na ye mpe akozwa ngomba na ngai mosantu.+

  • Yisaya 65:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 “Mbwa ya zamba+ mpe mwana-mpate bakolya esika moko,+ mpe nkɔsi akolya matiti ya kokauka lokola ngɔmbɛ;+ kasi nyoka, bilei na ye ekozala putulu.+ Bakosala mabe te+ mpe bakobebisa eloko moko te na ngomba na ngai mosantu mobimba,”+ Yehova alobi bongo.

  • Ezekiele 20:40
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 40 “‘Mpamba te na ngomba na ngai mosantu, na ngomba molai ya Yisraele,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘kuna nde bango, ndako nyonso ya Yisraele na mobimba na yango, bakosalela ngai, na kati ya mokili.+ Kuna nakosepela na bango, mpe kuna nakosɛnga makabo na bino mpe bambuma ya liboso ya makabo na bino kati na biloko na bino nyonso ya bosantu.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto