Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 1:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Mpo Yehova ayebi nzela ya bayengebene,+

      Kasi nzela ya bato mabe ekobeba.+

  • Nzembo 37:38
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 38 Kasi bato oyo babukaka mibeko bakosila mpenza bango nyonso nyɛɛ;+

      Bomoi ya bato mabe na mikolo ezali koya ekolongolama mpenza.+

  • Nzembo 104:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Basumuki bakosilisama na mabele;+

      Mpe bato mabe bakozala lisusu te.+

      Ee molimo na ngai, pambolá Yehova. Bósanzola Yah!+

  • Masese 29:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Moto oyo apamelami mbala na mbala+ kasi azali kokómisa motó na ye makasi*+ akobukana pwasa, mpe kobika ekozala te.+

  • Ezekiele 20:38
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 38 Mpe nakolongola epai na bino batomboki mpe bato oyo bazali kobuka mibeko na ngai,+ mpo nakobimisa bango na mokili na bango oyo bazali kofanda bapaya, kasi bakokɔta na mokili ya Yisraele te;+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.’+

  • 2 Petro 3:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Kasi na nzela ya liloba yango kaka likoló+ ná mabele+ oyo ezali sikoyo ebombami mpo na mɔtɔ+ mpe ezali kobatelama mpo na kozela mokolo ya kosambisama+ mpe ya kobebisa bato oyo batyolaka Nzambe.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto