Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 28:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “Yehova akotindela yo elakeli mabe,+ mobulungano+ mpe mpamela+ na misala na yo nyonso oyo okoluka kosala, kino okosila mpe okobebisama nokinoki, mpo na mabe ya misala na yo na ndenge osundoli ngai.+

  • 2 Bakonzi 22:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 mpamba te batiki ngai mpe bakei kobimisela banzambe+ mosusu milinga ya mbeka mpo na kosilikisa ngai na misala nyonso ya mabɔkɔ na bango,+ mpe nkanda na ngai epeleli esika oyo lokola mɔtɔ oyo ekobomama te.’”’+

  • Yisaya 65:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “Kasi bino bozali baoyo bazali kotika Yehova,+ baoyo bazali kobosana ngomba mosantu na ngai,+ baoyo bazali kotyela nzambe ya Makila Malamu+ biloko na mesa mpe baoyo bazali kotondisela nzambe ya Makambo Nyonso Etángamá+ vinyo oyo esangisami.

  • Yirimia 2:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 ‘mpo bato na ngai basali makambo mibale ya mabe: Batiki kutu ngai,+ liziba ya mai ya bomoi,+ mpo bámitimwela mabulu, mabulu oyo ebukaná, oyo ekoki kobomba mai te.’

  • Yirimia 15:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 “‘Yo moko osundoli ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova. ‘Ozali kaka kozonga nsima.+ Mpe nakosembolela yo lobɔkɔ na ngai mpe nakoboma yo.+ Nalɛmbi koyoka mawa.+

  • Yirimia 17:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Ee Yehova, elikya ya Yisraele,+ baoyo nyonso bazali kotika yo bakopɔla na nsɔni.+ Baoyo bazali kopɛngwa mpe batiki ngai+ bakokomama nkombo na mabele, mpo batiki liziba ya mai ya bomoi, Yehova.+

  • Danyele 9:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 tosali lisumu,+ tosali libunga, tosali mabe mpe totomboki;+ mpe totiki mitindo na yo mpe bikateli na yo ya lisambisi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto