Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 28:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Ná baoyo mpe—mpo na vinyo babungi nzela mpe mpo na masanga oyo elangwisaka batelengani. Nganga-nzambe mpe mosakoli+—babungi nzela mpo na masanga oyo elangwisaka, babulungani mpo na vinyo, batelengani+ mpo na masanga oyo elangwisaka; babungi nzela na bimonaneli na bango, bazwi kizunguzungu mpe bayebi ekateli te.

  • Yirimia 5:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Basakoli bazali mpenza kosakola na lokuta;+ mpe banganga-nzambe bazali konyata bato na nguya na bango.+ Mpe bato na ngai balingi ezala ndenge wana;+ bongo bokosala nini na nsuka na yango?”+

  • Yirimia 6:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 “Mpo banda na oyo aleki moke na kati na bango tii na oyo aleki monene na kati na bango, bango nyonso bazali kozwa litomba na ndenge ya mabe;+ mpe banda na mosakoli tii na nganga-nzambe, bango nyonso bazali kobuka lokuta.+

  • Yirimia 8:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Na yango, nakopesa basi na bango epai ya mibali mosusu, bilanga na bango epai ya baoyo bazali kozwa yango ezala ya bango;+ mpo, banda na oyo aleki moke kino na oyo aleki monene, mokomoko azali kozwa litomba na ndenge ya mabe;+ banda na mosakoli kino na nganga-nzambe, mokomoko azali kosala makambo na lokuta.+

  • Ezekiele 22:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Na kati na ye, basakoli na ye basali likita mabe,+ lokola nkɔsi oyo ezali koganga, oyo ezali kopasola nyama.+ Bazali mpenza kolya+ molimo. Bazali se kozwa bomɛngo mpe biloko ya motuya.+ Basi na ye oyo mibali bakufá, bakómisi bango mingi na kati na ye.+

  • Sefania 3:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Basakoli na yango bazalaki na lofundo, bazalaki bato ya bokosi.+ Banganga-nzambe na yango bakómisaki eloko ya bosantu eloko mpamba; basakanaki na mobeko.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto