Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Bileli 1:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Azali kolela mingi na butu,+ mpe mpisoli na ye ezali na matama na ye.+

      Azali na moto ya kobɔndisa ye te kati na bato nyonso oyo balingaka ye.+

      Baninga na ye nyonso basaleli ye makambo na bokosi.+ Bakómi banguna na ye.+

  • Bileli 1:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Nazali kolela biloko wana lokola mwasi.+ Liso na ngai, liso na ngai ezali kosopa mai mingi.+

      Mpo mobɔndisi akómi mosika na ngai, moto ya kolendisa molimo na ngai.

      Bana na ngai batikali mabɔkɔ mpamba,+ mpo monguna atomboli mapeka.+

  • Amose 5:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 “Na yango, talá oyo Yehova Nzambe ya mampinga, Yehova, alobi: ‘Koganga ekozala na bisika minene nyonso ya bato nyonso,+ mpe na babalabala nyonso bato bakoloba ete: “Aa! Aa!” Mpe ekosengela na bango bábenga moloni-bilanga mpo na kolela,+ mpe baoyo bayebi kolela mpo na koganga.’+

  • Luka 7:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Ntango akómaki pene na porte ya engumba, talá! bazalaki komema mokufi+ moko na libándá, mwana se moko+ oyo mama na ye abotaki. Lisusu, mama yango azalaki mwasi oyo mobali akufá. Ebele mpenza ya bato oyo bautaki na engumba bazalaki mpe elongo na ye.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto