Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 4:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 mpe mpo otombola miso na yo na likoló mpe omona mpenza moi ná sanza mpe minzoto, limpinga nyonso ya likoló, mpe olengolama mpenza mpe ogumbamela yango mpe osalela yango,+ biloko oyo Yehova Nzambe na yo akabelá bato ya bikólo nyonso oyo bazali na mabele mobimba.+

  • Kolimbola Mibeko 17:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 mpe akei kosambela banzambe mosusu mpe agumbameli bango to agumbameli moi to sanza to limpinga nyonso ya likoló,+ eloko oyo napeseli mitindo te,+

  • 2 Bakonzi 17:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe bazalaki se kotika mibeko+ nyonso ya Yehova Nzambe na bango mpe bamisalelaki bikeko ya ebende oyo enyangwisami,+ bana-ngɔmbɛ mibale,+ mpe basalaki nzete moko ya losambo+ mpe babandaki kogumbamela limpinga nyonso ya likoló+ mpe kosalela Baala;+

  • 2 Bakonzi 21:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Bongo atongaki lisusu bisika oyo etombwaná oyo tata na ye Hizikiya abebisaki,+ mpe atɛlɛmiselaki Baala bitumbelo mpe asalaki nzete ya losambo, ndenge Ahaba+ mokonzi ya Yisraele asalaki; mpe abandaki kogumbamela+ limpinga nyonso ya likoló+ mpe kosalela yango.+

  • Yirimia 7:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Bokoki nde koyiba,+ koboma,+ kosala ekobo,+ kolapa ndai ya lokuta,+ kobimisa milinga ya mbeka epai na Baala+ mpe kolanda banzambe mosusu oyo boyebaki te,+

  • Yirimia 19:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe bandako ya Yerusaleme mpe bandako ya bakonzi ya Yuda esengeli kokóma lokola esika ya Tofete,+ bandako ya mbindo, elingi koloba, bandako nyonso oyo likoló ya bansamba na yango, bazalaki kobimisela limpinga mobimba ya likoló milinga ya mbeka+ mpe esika bazalaki kosopela banzambe mosusu makabo ya masanga.’”+

  • Sefania 1:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 ná baoyo bazali kogumbamela mampinga ya likoló na bansamba ya bandako,+ ná baoyo bazali kogumbama+ mpe kolapela Yehova ndai+ mpe kolapa ndai na nkombo ya Malakame;+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto