Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 3:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 kino Yehova akopesa bandeko na bino bopemi, ndenge apesi bino, mpe kino bango mpe bakozwa mokili oyo Yehova Nzambe na bino azali kopesa bango na ngámbo ya Yordani; nsima na yango nde bosengeli kozonga, moto na moto na esika na ye oyo napesi bino.’+

  • Yirimia 32:37
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 ‘Talá nazali koyanganisa bango longwa na mikili nyonso epai nakopalanganisa bango na nkanda na ngai mpe na nkɛlɛ na ngai mpe na kosilika makasi;+ mpe nakozongisa bango na esika oyo mpe nakofandisa bango na kimya.+

  • Hosea 1:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe bana ya Yuda ná bana ya Yisraele bakoyanganisama mpenza mpe bakozala na bomoko+ mpe, ya solo, bakomityela mokonzi se moko, mpe bakomata mpo bábima na mokili yango,+ mpamba te mokolo ya Yizireele ekozala monene.+

  • Amose 9:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe nakozongisa bato na ngai, Yisraele, oyo bakangamaki,+ mpe bakotonga bingumba oyo etikalaki mpamba mpe bakofanda na kati na yango,+ mpe bakolona banzete ya vinyo mpe bakomɛla vinyo na yango, mpe bakosala bilanga mpe bakolya mbuma na yango.’+

  • Sefania 3:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Na ntango yango, nakokɔtisa bino, ɛɛ, na ntango nakoyanganisa bino. Mpo nakosala ete bózwa nkombo mpe lisanzoli na kati ya bato ya bikólo nyonso ya mabele, ntango nakozongisa na miso na bino mpenza bato na bino oyo bakangamaki,” Yehova alobi bongo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto