Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 30:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 baoyo basimbi nzela mpo bákita na Ezipito+ mpe batuni monɔkɔ na ngai te,+ mpo na kobombama na esika makasi ya libateli ya Farao mpe mpo na kozwa esika ya kokima na elili ya Ezipito!+

  • Yisaya 31:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mawa na baoyo bazali kokita na Ezipito mpo na koluka lisungi,+ baoyo bazali kotya motema na bampunda,+ mpe baoyo bazali kotya motema na makalo+ ya bitumba, mpo ezali ebele, mpe na bampunda, mpo ezali na makasi mingi, kasi batali Mosantu ya Yisraele te mpe baluki Yehova te.+

  • Bileli 5:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Topesi lobɔkɔ+ na Ezipito;+ na Asiri,+ mpo tótonda na limpa.

  • Ezekiele 16:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Mpe okendaki kosala bondumba na bana mibali ya Ezipito,+ bato oyo bafandi penepene na yo, bato ya enama monene,+ mpe okobaki kosala bondumba na yo mingi koleka mpo na kosilikisa ngai.

  • Ezekiele 17:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Kasi, nsukansuka, atombokelaki+ ye na ndenge atindaki bamemi-nsango na ye na Ezipito, mpo epesa ye bampunda+ mpe bato ebele. Akolonga? Akobika, ye oyo azali kosala makambo ya boye, mpe ye oyo abuki kondimana? Akobika mpenza?’+

  • Ezekiele 23:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe babandaki kosala bondumba na Ezipito.+ Na bolenge na bango, basalaki bondumba.+ Kuna bafinaki mabɛlɛ na bango,+ mpe kuna basimbasimbaki ntolo ya bongɔndɔ na bango.

  • 2 Bakorinti 6:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Bókangana te na ekanganeli ya mabe esika moko na bato oyo bazali bandimi te.+ Mpo boninga nini ezali na kati ya boyengebene mpe kobuka mibeko?+ To pole ná molili esanganaka na nini?+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto