36 Yehova akotambwisa yo+ ná mokonzi+ na yo oyo okotya likoló na yo mpo na kokende na ekólo oyo oyebi te, ezala yo mpe bankɔkɔ na yo; mpe kuna okosalela mpenza banzambe mosusu, ya nzete mpe ya mabanga.+
15 Bongo amemaki Yehoyakine+ na mboka mopaya, na Babilone;+ mpe amemaki mama ya mokonzi,+ basi ya mokonzi, bakapita ya ndako+ na ye mpe bato minene ya mokili, alongolaki bango na Yerusaleme akei na bango na mboka mopaya, na Babilone.
7 Mpe babomaki bana ya Zidikiya na miso na ye,+ mpe atɔbɔlaki miso+ ya Zidikiya, nsima na yango, akangaki ye na bikangeli ya motako+ mpe amemaki ye na Babilone.+
13 Mpe nakotanda mpenza monyama na ngai likoló na ye, mpe akokangama mpenza na monyama na ngai ya bokila;+ mpe nakomema ye na Babilone, na mokili ya Bakaladea,+ kasi akomona yango te; mpe akokufa kuna.+