Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 36:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Kasi bazalaki ntango nyonso kosɛka+ bamemi-nsango ya Nzambe ya solo mpe komona maloba na ye mpamba+ mpe kotyola+ basakoli na ye, tii nkɛlɛ+ ya Yehova ekitelaki bato na ye, tii bakokaki lisusu kobikisama te.+

  • Nehemia 9:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Mpe yo ozali moyengebene+ na makambo nyonso oyo ekweli biso, mpamba te osalaki makambo na bosembo,+ kasi biso nde tosalaki mabe.+

  • Yirimia 30:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Baoyo nyonso bazalaki kolinga yo makasi bango nde babosani yo.+ Ezali yo te nde bazali kolukaluka. Mpo nabɛti yo na fimbo ya monguna,+ na etumbu ya moto ya nko,+ mpo libunga+ na yo ekómi monene; masumu na yo ekómi mingi.+

  • Bileli 1:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Yehova azali moyengebene,+ mpo natombokeli nde monɔkɔ na ye.+

      Bóyoka sikoyo, mpe bótala mpasi na ngai.

      Bangɔndɔ na ngai mpe bilenge na ngai ya mibali bakei na bokangami.+

  • Ezekiele 8:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe alobaki na ngai lisusu boye: “Omoni yango, Ee mwana ya moto? Makambo oyo eyinamá oyo bato ya ndako ya Yuda basali awa ezali nde likambo moke, mpo bátondisa lisusu mokili na mobulu+ mpe básilikisa ngai lisusu, mpe talá bazali kosembola mwa etape yango na zolo na ngai?

  • Danyele 9:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Ee Yehova, boyengebene ezali ya yo, kasi biso, bilongi na biso nde etondi na nsɔni lokola na mokolo ya lelo,+ bato ya Yuda mpe bato oyo bafandi na Yerusaleme mpe bato nyonso ya Yisraele, baoyo bazali pene mpe baoyo bazali mosika na mikili nyonso esika opanzá bango mpo basalelaki yo makambo na bosembo te.+

  • Danyele 9:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Ee Yehova, na kolanda misala na yo nyonso ya boyengebene,+ nabondeli yo, nkanda na yo mpe nkɛlɛ na yo elongwa na engumba na yo Yerusaleme, ngomba na yo mosantu;+ mpamba te, mpo na masumu na biso mpe mpo na mabunga ya bankɔkɔ na biso,+ Yerusaleme ná bato na yo bazali eloko ya kosambwisa na miso ya bato nyonso zingazinga na biso.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto