Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 36:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe bisaleli+ nyonso, ya minene+ mpe ya mike, ya ndako ya Nzambe ya solo mpe biloko ya motuya+ ya ndako ya Yehova mpe biloko ya motuya ya mokonzi+ mpe ya bankumu na ye, eloko nyonso, amemaki yango na Babilone.

  • Yisaya 39:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 ‘Talá! Mikolo ezali koya, mpe nyonso oyo ezali na kati ya ndako na yo mpe oyo bankɔkɔ na yo babombaki tii na mokolo ya lelo ekokende mpenza na Babilone.’+ ‘Ata eloko moko te ekotikala,’+ Yehova alobi bongo.

  • Yirimia 15:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Bozwi na yo mpe biloko na yo ya motuya nakopesa yango epunzama,+ mpo na lifuti te, kasi mpo na masumu na yo nyonso, ɛɛ, na bateritware na yo nyonso.+

  • Yirimia 20:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe nakopesa biloko nyonso oyo ebombami ya engumba oyo mpe mbuma na yango nyonso mpe biloko na yango nyonso ya motuya; mpe biloko nyonso ya motuya ya bakonzi ya Yuda nakopesa yango na lobɔkɔ ya banguna na bango.+ Mpe bakopunza yango mpenza mpe bakozwa yango mpe bakomema yango na Babilone.+

  • Yirimia 52:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe makonzí ya motako+ oyo ezalaki na ndako ya Yehova, bashario+ mpe mbu ya motako+ oyo ezalaki na ndako ya Yehova, Bakaladea babukabukaki yango mpe bamemaki motako na yango nyonso na Babilone.+

  • Yirimia 52:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi azwaki basaani,+ biloko ya kotya mɔtɔ, mabakuli,+ bambɛki, bitɛlɛmiselo ya miinda,+ bakɔpɔ, mabakuli oyo ezalaki ya wolo+ ya solosolo mpe mabakuli oyo ezalaki ya palata+ ya solosolo.+

  • Danyele 1:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Na nsima, Yehova akabaki Yehoyakime mokonzi ya Yuda+ ná ndambo ya bisaleli+ ya ndako ya Nzambe ya solo na lobɔkɔ na ye, bongo amemaki yango na mokili ya Shineare+ na ndako ya nzambe na ye; mpe amemaki bisaleli yango na ndako ya kobomba biloko ya motuya ya nzambe na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto