Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 7:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe Baezipito bakoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakosembolela Ezipito lobɔkɔ,+ mpe nakolongola solo bana ya Yisraele na katikati na bango.”+

  • Nzembo 9:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Yehova ayebani mpo na ekateli ya lisambisi oyo azwi.+

      Moto mabe akangami na motambo oyo asalaki na mabɔkɔ na ye moko.+

      Higayone. Sela.

  • Ezekiele 29:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe nakokómisa mokili ya Ezipito esika oyo etikali mpamba na katikati ya mikili oyo etikali mpamba;+ mpe mbula ntuku minei (40), bingumba na yango ekotikala mpamba na katikati ya bingumba oyo ebebisami;+ mpe nakopalanganisa Baezipito na kati ya bikólo mpe nakopanza bango na kati ya mikili.”+

  • Ezekiele 29:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ngai oyo nazali kopesa mokili ya Ezipito na Nebukadrezare mokonzi ya Babilone,+ mpe akomema mpenza bozwi na yango mpe akobɔtɔla biloko na yango mingi+ mpe akopunza ebele ya biloko na yango; mpe ekokóma mpenza lifuti mpo na mampinga ya basoda na ye.’

  • Ezekiele 29:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “‘Napesi ye mokili ya Ezipito ezala lifuti mpo na mosala oyo asalaki mpo na kobundisa ye, mpamba te basalelaki nde ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto