9 mpe bana ya Yisraele bakómaki koluka makambo oyo ezali malamu te na miso ya Yehova Nzambe na bango+ mpe bazalaki se komitongela bisika oyo etombwaná+ na kati ya bingumba na bango nyonso, banda na linɔ́ngi+ ya basinzili tii na engumba oyo ebatelami makasi;
14 Ata bakapita nyonso ya banganga-nzambe+ mpe bato bazangaki bosembo na makambo mingi mpenza, na kolanda makambo nyonso oyo eyinamá+ ya bikólo, bongo bakómisaki mbindo ndako ya Yehova oyo asantisaki na Yerusaleme.+