Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 26:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Bongo bosengeli kolya mosuni ya bana na bino ya mibali, mpe bokolya mosuni ya bana na bino ya basi.+

  • Kolimbola Mibeko 28:53
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 53 Bongo okolya mpenza mbuma ya libumu na yo, mosuni ya bana na yo ya mibali mpe ya bana na yo ya basi,+ oyo Yehova Nzambe apesi yo, mpo na nkaka mpe motungisi oyo monguna na yo akotya yo na yango.

  • 2 Bakonzi 6:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Na yango, tolambaki+ mwana na ngai mpe tolei ye.+ Bongo na mokolo oyo elandaki, nalobaki na ye ete: ‘Pesá mwana na yo, tólya ye.’ Kasi ye, abombaki mwana na ye.”

  • Yirimia 19:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe nakoleisa bango mosuni ya bana na bango ya mibali mpe ya bana na bango ya basi; mpe bakolya moto na moto mosuni ya moninga na ye, mpo na nkaka mpe mpo na motungisi oyo banguna na bango ná baoyo balukaka molimo na bango bakotya bango.”’+

  • Bileli 2:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Moná, Ee Yehova, mpe talá+ ye oyo onyokoli boye.

      Basi basengeli nde kokoba kolya mbuma na bango, bana oyo babotami na nzoto malamu mpenza,+

      To nganga-nzambe mpe mosakoli basengeli nde kobomama na esika mosantu ya Yehova?+

  • Bileli 4:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mabɔkɔ ya basi oyo bazalaka na motema mawa elambi bana na bango moko.+

      Bakómi lokola limpa ya kobɔndisa mpo na bato na ntango ya kokwea ya mwana mwasi ya bato na ngai.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto